30 nov. 2017

Mokili na motu ya Mama Iso

Barbade 30.11.2017, 19.00. Téléphone:
- Mbote Mama Iso, mikolo ebele?
- Mbote Tata Mapasa, ya solo. Natunaka yo mingi soki tosololi na Mama Mapasa.
- Mokolo eleki ndenge nini epai na bino?
- Kaka mbula na mbula. Moyen ya kobima libanda eza te.
- Mbula eza bénédiction. Bato ya Barbade basepeli po na mibu 51 ya dipanda na bango.
- Ndenge kaka biso pe tobandaka kosepela le ... soki mokolo nini oyo ya novembre.
- Le 24 novembre.
- Eee le 24 novembre. Tango ya Mobutu, mokolo ya monene penza. Bakosala défilé mokolo mobimba.
- Kasi Mama, oyo ya bango eza lokola le 30 juin epai na biso. Mokolo tozwaka indépendance.
- E ya solo. Oyoki makambo eleki na Zimbabwe? Balongoli président wana, asali bambula.
- EEe nalandaki yango. Président Mugabe asali 37 ans na bokonzi. Eleki ya Mobutu, 32 ans.
- Tata yango na bambula ebele asali na bokonzi akomi ata Maréchal te. Oyo likambo ya kokamwa. Ye pe mobange lisusu. Esengelaki abima na grade ya Maréchal.
- (Là je n'ai pas pu retenir mon rire) Teee, Maréchal eza grade ya basoldat. Mugabe azalaki civil, soldat te.
- Ya solo? Kasi azalaki président.
- Ya solo Mama. Mugabe aza moto lokola yo na ngai. Civil. Akokaki kokoma Maréchal te ata ndenge nini, kutu ata Général pe te.
- Natondi yo Papa. Bongo oyebi ete Pont ya Pompage esila? Mikolo oyo, baza kotonga na prince nzela ya Malweka. Nqnu esili te.  Nayoki éléction ekozala lisusu na 2018 te kasi na 2019. Mbongo eza te.
- Makambu oyo olobi nayebi te. Namonaki Pont ya Pompage tango nazalaki dernièrement na Kin. Malweka nanu nakoma te.
- Batika Kabila asilisela biso nzela ya Malweka avant akende. Bapesa ye lisusu ata bambula mibale to misato, mpo asilisa mosala pe atongela biso nzela wana. Tozeli yango mingi depuis tango ya Mobutu.


Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire